Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់កសស   អាយ៉ាត់:
وَلَمَّا تَوَجَّهَ تِلۡقَآءَ مَدۡيَنَ قَالَ عَسَىٰ رَبِّيٓ أَن يَهۡدِيَنِي سَوَآءَ ٱلسَّبِيلِ
Mpe tango azali kokende o ngambu ya mad’yan alobi: Nazali kolikia na Nkolo wa ngai akamba ngai o nzela ya semba.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَمَّا وَرَدَ مَآءَ مَدۡيَنَ وَجَدَ عَلَيۡهِ أُمَّةٗ مِّنَ ٱلنَّاسِ يَسۡقُونَ وَوَجَدَ مِن دُونِهِمُ ٱمۡرَأَتَيۡنِ تَذُودَانِۖ قَالَ مَا خَطۡبُكُمَاۖ قَالَتَا لَا نَسۡقِي حَتَّىٰ يُصۡدِرَ ٱلرِّعَآءُۖ وَأَبُونَا شَيۡخٞ كَبِيرٞ
Mpe tango akomaki na liziba ya mayi ya mad’yan, akuti bato batondi bazali komelisa (banyama na bango) mpe akuti basi mibale lokola bamivandisi pembeni, alobi (na bango): Bolingi nini? Balobi: Tokomelisa banyama te kino bango basilisa komelisa, mpe tata na biso akomi mokolo makasi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَسَقَىٰ لَهُمَا ثُمَّ تَوَلَّىٰٓ إِلَى ٱلظِّلِّ فَقَالَ رَبِّ إِنِّي لِمَآ أَنزَلۡتَ إِلَيَّ مِنۡ خَيۡرٖ فَقِيرٞ
Ameliselaki bango (bibwele), sima akei kofanda na nsé ya elili mpe alobaki ete: Nkolo! Oyo okokitisela ngai nazali mpenza na mposa na yango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَجَآءَتۡهُ إِحۡدَىٰهُمَا تَمۡشِي عَلَى ٱسۡتِحۡيَآءٖ قَالَتۡ إِنَّ أَبِي يَدۡعُوكَ لِيَجۡزِيَكَ أَجۡرَ مَا سَقَيۡتَ لَنَاۚ فَلَمَّا جَآءَهُۥ وَقَصَّ عَلَيۡهِ ٱلۡقَصَصَ قَالَ لَا تَخَفۡۖ نَجَوۡتَ مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
Moko kati na bango ayei (epai ya Mûssa), azali kotambola malembe na nsoni alobi: Ya soló, tata na biso azali kobenga yo, mpo afuta yo ndenge omeliseli biso banyama. Mpe tango akomaki liboso lia ye, ayebisi ye lisolo lia ye, alobi: Kobanga te, osili kolongisama epai ya babubi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قَالَتۡ إِحۡدَىٰهُمَا يَٰٓأَبَتِ ٱسۡتَـٔۡجِرۡهُۖ إِنَّ خَيۡرَ مَنِ ٱسۡتَـٔۡجَرۡتَ ٱلۡقَوِيُّ ٱلۡأَمِينُ
Moko na bango alobaki ete: Oh tata wa ngai! Zúa ye (na mosala), mpo ete moto malamu ya mosala ezali moto ya makasi mpe ya bosembo.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قَالَ إِنِّيٓ أُرِيدُ أَنۡ أُنكِحَكَ إِحۡدَى ٱبۡنَتَيَّ هَٰتَيۡنِ عَلَىٰٓ أَن تَأۡجُرَنِي ثَمَٰنِيَ حِجَجٖۖ فَإِنۡ أَتۡمَمۡتَ عَشۡرٗا فَمِنۡ عِندِكَۖ وَمَآ أُرِيدُ أَنۡ أَشُقَّ عَلَيۡكَۚ سَتَجِدُنِيٓ إِن شَآءَ ٱللَّهُ مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Alobi: Nalingi obala moko kati ya bana basi na ngai mibale oyo, na mobeko ete: Osalela nga mibu mwambe, soki mpe okokisi (mibu) zomi, sé yo moko, mpe nakopesa yo pasi te. Na bolingi bwa Allah okokuta ngai o kati ya bato ya malamu.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قَالَ ذَٰلِكَ بَيۡنِي وَبَيۡنَكَۖ أَيَّمَا ٱلۡأَجَلَيۡنِ قَضَيۡتُ فَلَا عُدۡوَٰنَ عَلَيَّۖ وَٱللَّهُ عَلَىٰ مَا نَقُولُ وَكِيلٞ
(Mûssa) alobi: Tosili koyokana ngai nayo, oyo na коропа kati ya makambo mibale oyo, nakozala na lisumu te. Mpe Allah nde azali mobateli na oyo tozali koloba.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់កសស
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ