Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាស្ហស្ហ៊ូអារ៉ក   វាក្យខណ្ឌ:

Ach-Chu’arâ

طسٓمٓ
Twâ, sín, mîm.[1]
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo ya liboso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ
Oyo nde mikapo mia buku ya polele.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَعَلَّكَ بَٰخِعٞ نَّفۡسَكَ أَلَّا يَكُونُواْ مُؤۡمِنِينَ
Ozali komitungisa mpo été baboyi kondima.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِن نَّشَأۡ نُنَزِّلۡ عَلَيۡهِم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ ءَايَةٗ فَظَلَّتۡ أَعۡنَٰقُهُمۡ لَهَا خَٰضِعِينَ
Soki tolingaki mbele tokitisaki bilembo epai na bango kowuta о likolo, bakingo na bango elingaki kogumbama. (na soni).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا يَأۡتِيهِم مِّن ذِكۡرٖ مِّنَ ٱلرَّحۡمَٰنِ مُحۡدَثٍ إِلَّا كَانُواْ عَنۡهُ مُعۡرِضِينَ
Мре tango nyoso lilendisi ya sika likoyela bango kowuta epai ya Ar-Rahmân[2], sé bakopesa yango mokongo.
[2] Ar-Rahmán: Bótala Ar-Ra’d mokapo: 30.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَقَدۡ كَذَّبُواْ فَسَيَأۡتِيهِمۡ أَنۢبَٰٓؤُاْ مَا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
Baboyaki kondima, (na makambo nyoso oyo ewutaki epai ya Nkolo wa bango) kala te bakoyelaka bango basango тропа maye bazalaki kotiola na yango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَى ٱلۡأَرۡضِ كَمۡ أَنۢبَتۡنَا فِيهَا مِن كُلِّ زَوۡجٖ كَرِيمٍ
Boye bazali kornona mabele te boni tokolisaki kati na yango (milona mibale mibale) na lolenge ya malamu?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Ya soló, wana ezali elembo. Kasi ebele kati na bango bazali kondima te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe ya soló, Nkolo wa yo azali wa bokasi atonda ngolu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذۡ نَادَىٰ رَبُّكَ مُوسَىٰٓ أَنِ ٱئۡتِ ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe tango Nkolo wayo abengaki Mûssa, kende epai ya bato ya mabe.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَوۡمَ فِرۡعَوۡنَۚ أَلَا يَتَّقُونَ
Bato ya falo. Bazali kobanga (Allah) te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبِّ إِنِّيٓ أَخَافُ أَن يُكَذِّبُونِ
Alobi: Nkolo, ya sólo nazali kobanga ete bandimela ngai te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَيَضِيقُ صَدۡرِي وَلَا يَنطَلِقُ لِسَانِي فَأَرۡسِلۡ إِلَىٰ هَٰرُونَ
Ntolo na ngai ezali ya kokangama, mpe lolemu na ngai elobaka malamu te, tinda yango epai ya Hâruna.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَهُمۡ عَلَيَّ ذَنۢبٞ فَأَخَافُ أَن يَقۡتُلُونِ
Mpe nazali na mabe oyo nasala bango, na yango nazali kobanga été noki bakoboma ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ كَلَّاۖ فَٱذۡهَبَا بِـَٔايَٰتِنَآۖ إِنَّا مَعَكُم مُّسۡتَمِعُونَ
(Allah ayebisaki ye): Eloko ezali te, bökende bino mibale na bilembo bia biso, tokozala elongo na bino tozali koyoka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأۡتِيَا فِرۡعَوۡنَ فَقُولَآ إِنَّا رَسُولُ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Bökende epai ya falo bino mibale, boyebisa ye ete, Nkolo ya mokili nde atindi biso ya sólo,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَنۡ أَرۡسِلۡ مَعَنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
Mpo opesa biso bana ya isalayele.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ أَلَمۡ نُرَبِّكَ فِينَا وَلِيدٗا وَلَبِثۡتَ فِينَا مِنۡ عُمُرِكَ سِنِينَ
Falo alobi: Tobokoloki yo te kowuta bolenge?, mpe tovandaki nayo bamibu ebele te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَفَعَلۡتَ فَعۡلَتَكَ ٱلَّتِي فَعَلۡتَ وَأَنتَ مِنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Мре osalaki maye osalaki, mpe ozalaki kati ya bapengwi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ فَعَلۡتُهَآ إِذٗا وَأَنَا۠ مِنَ ٱلضَّآلِّينَ
Mûssa alobi: Nasalaki yango mpo été nazangaki koyeba.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَفَرَرۡتُ مِنكُمۡ لَمَّا خِفۡتُكُمۡ فَوَهَبَ لِي رَبِّي حُكۡمٗا وَجَعَلَنِي مِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Yango nakimaki bino тропа bobangi. Sima Nkolo wa ngai apesi ngai bwanya, mpe aponi ngai okati ya batindami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَتِلۡكَ نِعۡمَةٞ تَمُنُّهَا عَلَيَّ أَنۡ عَبَّدتَّ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
Wana nde bolamu nayo ozali kokundolela ngai yango, mpe yo osili kozua bana ya isalayele bawumbu nayo?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ فِرۡعَوۡنُ وَمَا رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
(Falo ) alobi; nani Nkolo wa molongo?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُم مُّوقِنِينَ
(Mûssa) alobi: Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango mibale, soki bozali na ntembe te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ لِمَنۡ حَوۡلَهُۥٓ أَلَا تَسۡتَمِعُونَ
Falo alobi na baye bazali pembeni naye ete: Boye bozali koyoka te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبُّكُمۡ وَرَبُّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ
(Mûssa) alobi; Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bato ya kala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ إِنَّ رَسُولَكُمُ ٱلَّذِيٓ أُرۡسِلَ إِلَيۡكُمۡ لَمَجۡنُونٞ
(Falo) alobi: Ya soló motindami oyo batindi ye epai na bino azali ligboma.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبُّ ٱلۡمَشۡرِقِ وَٱلۡمَغۡرِبِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُمۡ تَعۡقِلُونَ
(Mûssa) alobi: Nkolo wa moniele na eloli, na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki bozali koyeba.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ لَئِنِ ٱتَّخَذۡتَ إِلَٰهًا غَيۡرِي لَأَجۡعَلَنَّكَ مِنَ ٱلۡمَسۡجُونِينَ
(Falo) alobi: Soki olandi nzambe mosusu otiki ngai, nakokotisa yo na boloko.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ أَوَلَوۡ جِئۡتُكَ بِشَيۡءٖ مُّبِينٖ
(Mûssa) alobi: Ata soki nayeli yo bikamwa ya polele?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ فَأۡتِ بِهِۦٓ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
(Falo) alobi: Yaka na yango soki ozali o kati ya balobi bosôló.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَلۡقَىٰ عَصَاهُ فَإِذَا هِيَ ثُعۡبَانٞ مُّبِينٞ
(Mûssa) abwaki lingenda lia ye, mpe tala ebongwani nyoka ya polele ebandi kotambola.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَنَزَعَ يَدَهُۥ فَإِذَا هِيَ بَيۡضَآءُ لِلنَّٰظِرِينَ
Mpe abimisi loboko naye na libenga, mpe tala ekomi pembe makasi pona baye bazali kotala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ لِلۡمَلَإِ حَوۡلَهُۥٓ إِنَّ هَٰذَا لَسَٰحِرٌ عَلِيمٞ
(Falo) alobi na bankumu naye bazalaki pembeni naye: Ya soló, oyo nde nganga monene ya boyebi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يُرِيدُ أَن يُخۡرِجَكُم مِّنۡ أَرۡضِكُم بِسِحۡرِهِۦ فَمَاذَا تَأۡمُرُونَ
Alingi kobimisa bino o mabele na bino na bonganga naye, boye bokosala nini?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُوٓاْ أَرۡجِهۡ وَأَخَاهُ وَٱبۡعَثۡ فِي ٱلۡمَدَآئِنِ حَٰشِرِينَ
Balobi: Zelisa ye na ndeko wa ye, mpe tinda bato na mboka mpo basangisa (bakende kosangisa banganga, sima baya komekana),
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَأۡتُوكَ بِكُلِّ سَحَّارٍ عَلِيمٖ
Mpe bamemela yo banganga ya minene oyo bayebi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَجُمِعَ ٱلسَّحَرَةُ لِمِيقَٰتِ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ
Banganga basangani o mokolo mwa elaka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقِيلَ لِلنَّاسِ هَلۡ أَنتُم مُّجۡتَمِعُونَ
Mpe bayebisi na bato ete: Boye bokosangana te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَعَلَّنَا نَتَّبِعُ ٱلسَّحَرَةَ إِن كَانُواْ هُمُ ٱلۡغَٰلِبِينَ
Mpo tolanda banganga soki bango balongi?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَلَمَّا جَآءَ ٱلسَّحَرَةُ قَالُواْ لِفِرۡعَوۡنَ أَئِنَّ لَنَا لَأَجۡرًا إِن كُنَّا نَحۡنُ ٱلۡغَٰلِبِينَ
Mpe tango banganga bakomi epai ya falo balobi naye été: Boye tozali na lifuta soki tolongi?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ نَعَمۡ وَإِنَّكُمۡ إِذٗا لَّمِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ
(Falo) alobi: Iyo, ya soló, nakotiya bino pembeni na ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ لَهُم مُّوسَىٰٓ أَلۡقُواْ مَآ أَنتُم مُّلۡقُونَ
Mûssa ayebisi bango: Bobwaka oyo bolingi kobwaka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَلۡقَوۡاْ حِبَالَهُمۡ وَعِصِيَّهُمۡ وَقَالُواْ بِعِزَّةِ فِرۡعَوۡنَ إِنَّا لَنَحۡنُ ٱلۡغَٰلِبُونَ
Mpe babwaki basinga na bamangenda na bango, (mpe balobi): Na nguya ya falo ya sólo, tokolonga!
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَلۡقَىٰ مُوسَىٰ عَصَاهُ فَإِذَا هِيَ تَلۡقَفُ مَا يَأۡفِكُونَ
Mpe Mûssa abwaki lingenda lia ye, mpe tala emeli nyoso oyo basalaki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأُلۡقِيَ ٱلسَّحَرَةُ سَٰجِدِينَ
Mpe banganga nyoso bakweyaki na kofukama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُوٓاْ ءَامَنَّا بِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Balobi: Tondimi na Nkolo wa molongo,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبِّ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
Nkolo ya Mûssa na Hânına.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ ءَامَنتُمۡ لَهُۥ قَبۡلَ أَنۡ ءَاذَنَ لَكُمۡۖ إِنَّهُۥ لَكَبِيرُكُمُ ٱلَّذِي عَلَّمَكُمُ ٱلسِّحۡرَ فَلَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَۚ لَأُقَطِّعَنَّ أَيۡدِيَكُمۡ وَأَرۡجُلَكُم مِّنۡ خِلَٰفٖ وَلَأُصَلِّبَنَّكُمۡ أَجۡمَعِينَ
(Falo) alobi: Bondimi naye yambo ete napesa bino ndingisa! Ya sólo, ye nde mokonzi ya bino oyo alakisaki bino bonganga, bokoyeba kala te. Nakokata bino maboko na makolo na lolenge ya bokeseni, mpe nakobaka bino banso na nzete!
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُواْ لَا ضَيۡرَۖ إِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا مُنقَلِبُونَ
Banganga balobi: Mabe ezali te, pamba te, mpo tokozongaka ya soló epai ya Nkolo wa biso!
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّا نَطۡمَعُ أَن يَغۡفِرَ لَنَا رَبُّنَا خَطَٰيَٰنَآ أَن كُنَّآ أَوَّلَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya soló, posa na biso ezali ete Nkolo wa biso alimbisa biso, mpo tozali bato ya yambo тропа kondima (ye Allah).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ وَأَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰٓ أَنۡ أَسۡرِ بِعِبَادِيٓ إِنَّكُم مُّتَّبَعُونَ
Mpe toyebisaki na Mûssa ete: Akende na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ya soló bakolanda bino.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَرۡسَلَ فِرۡعَوۡنُ فِي ٱلۡمَدَآئِنِ حَٰشِرِينَ
Мре falo atindi été basangisa bato ya mboka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ لَشِرۡذِمَةٞ قَلِيلُونَ
Ete: Ya sólo, bato oyo bazali токе.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّهُمۡ لَنَا لَغَآئِظُونَ
Мре ya sólo, balongi biso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّا لَجَمِيعٌ حَٰذِرُونَ
Kasi biso banso tozali na bokebi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَخۡرَجۡنَٰهُم مِّن جَنَّٰتٖ وَعُيُونٖ
Mpe tobimisaki bango na bilanga mpe mingala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَكُنُوزٖ وَمَقَامٖ كَرِيمٖ
Bamaziba ya bomengo mpe bisika ya lokumu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَذَٰلِكَۖ وَأَوۡرَثۡنَٰهَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
Lolenge moko topesaki bokitani na bana ya isalayele.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَتۡبَعُوهُم مُّشۡرِقِينَ
Mpe balandaki bango na ntongo makasi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَلَمَّا تَرَٰٓءَا ٱلۡجَمۡعَانِ قَالَ أَصۡحَٰبُ مُوسَىٰٓ إِنَّا لَمُدۡرَكُونَ
Mpe tango mapinga mibale bamonani; bato ya Mûssa balobaki été: Ya sólo, biso tosili kozuama (bato ya Mûssa bakanisaki été bakokanga bango ya soló).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ كَلَّآۖ إِنَّ مَعِيَ رَبِّي سَيَهۡدِينِ
(Mûssa) alobi te. Ya soló Nkolo wa ngai azali elongo na ngai, akokamba ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰٓ أَنِ ٱضۡرِب بِّعَصَاكَ ٱلۡبَحۡرَۖ فَٱنفَلَقَ فَكَانَ كُلُّ فِرۡقٖ كَٱلطَّوۡدِ ٱلۡعَظِيمِ
Mpe topesaki emoniseli epai ya Mûssa ete; beta lingenda lia yo na ebale mpe ekabwani na mibale lokola ngomba ya monene.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَزۡلَفۡنَا ثَمَّ ٱلۡأٓخَرِينَ
Mpe totikaki ete baye wana bapusana. (Falo na bato naye)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَنجَيۡنَا مُوسَىٰ وَمَن مَّعَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ
Mpe tolongisaki Mûssa na bato naye banso oyo bazalaki elongo naye,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
Sima, tozindisaki basusu (banguna).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Ya sólo, wana ezali elembo. Ebele kati na bango bazali kondima te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱتۡلُ عَلَيۡهِمۡ نَبَأَ إِبۡرَٰهِيمَ
Mpe tángela bango sango ya Ibrâhîm.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦ مَا تَعۡبُدُونَ
Tango alobaki na tata naye mpe bato naye: Nini bozali kobondela?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُواْ نَعۡبُدُ أَصۡنَامٗا فَنَظَلُّ لَهَا عَٰكِفِينَ
Balobaki: Tozali kobondela bikeko, mpe tokokangama sé na yango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ هَلۡ يَسۡمَعُونَكُمۡ إِذۡ تَدۡعُونَ
Alobi: Boye bayokaka bino tango bosengaka bango?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَوۡ يَنفَعُونَكُمۡ أَوۡ يَضُرُّونَ
То boye basalisaka bino to mpe banyokoloko bino?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُواْ بَلۡ وَجَدۡنَآ ءَابَآءَنَا كَذَٰلِكَ يَفۡعَلُونَ
Balobi: Tokutaki bankoko na biso ya kala bazali sé ndenge wana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ أَفَرَءَيۡتُم مَّا كُنتُمۡ تَعۡبُدُونَ
Alobi: Bososoli mpenza тропа oyo bozali kobondela,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُمُ ٱلۡأَقۡدَمُونَ
Bino na bankoko na bino ya kala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَإِنَّهُمۡ عَدُوّٞ لِّيٓ إِلَّا رَبَّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Bango banso bazali banguna na ngai, longola sé Nkolo wa molongo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلَّذِي خَلَقَنِي فَهُوَ يَهۡدِينِ
Oyo akelaki ngai mpe azali kokamba ngai,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِي هُوَ يُطۡعِمُنِي وَيَسۡقِينِ
Mpe ye nde aleisaka ngai, mpe amelisaka ngai,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذَا مَرِضۡتُ فَهُوَ يَشۡفِينِ
Mpe tango nabeleke, ye nde abikisaka ngai,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِي يُمِيتُنِي ثُمَّ يُحۡيِينِ
Mpe ye nde akoboma ngai, sima akosekwisa ngai,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِيٓ أَطۡمَعُ أَن يَغۡفِرَ لِي خَطِيٓـَٔتِي يَوۡمَ ٱلدِّينِ
Mpe nazali kolikia ete alimbisa ngai masumu omokolo mwa suka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبِّ هَبۡ لِي حُكۡمٗا وَأَلۡحِقۡنِي بِٱلصَّٰلِحِينَ
Nkolo! Pesa ngai bwanya (mpe boyebi), mpe tia ngai elongo na bato ya malamu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱجۡعَل لِّي لِسَانَ صِدۡقٖ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Tika ete lolemu na ngai eloba bosoló epai ya basusu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱجۡعَلۡنِي مِن وَرَثَةِ جَنَّةِ ٱلنَّعِيمِ
Mpe tiya ngai nazala okati ya bakitani ya lola ya kitoko.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱغۡفِرۡ لِأَبِيٓ إِنَّهُۥ كَانَ مِنَ ٱلضَّآلِّينَ
Mpe limbisa tata wa ngai mpo azalaki 0 kati ya babungi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَا تُخۡزِنِي يَوۡمَ يُبۡعَثُونَ
Suratu Ach-Chu’arâ Eteni 19 Л 535 \\\\
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَوۡمَ لَا يَنفَعُ مَالٞ وَلَا بَنُونَ
Mpe koyokisa ngai nsoni te o mokolo ya lisekwa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّا مَنۡ أَتَى ٱللَّهَ بِقَلۡبٖ سَلِيمٖ
Mokolo moye misolo na bana bakosalisaka te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأُزۡلِفَتِ ٱلۡجَنَّةُ لِلۡمُتَّقِينَ
Longola sé oyo akoya epai ya Allah na motema ya malamu. (Motema molamu ya kopetoama),
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَبُرِّزَتِ ٱلۡجَحِيمُ لِلۡغَاوِينَ
Bakopusanisaka lola pembeni ya babangi (Allah),
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقِيلَ لَهُمۡ أَيۡنَ مَا كُنتُمۡ تَعۡبُدُونَ
Mpe bakomonisaka bato mabe moto.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
مِن دُونِ ٱللَّهِ هَلۡ يَنصُرُونَكُمۡ أَوۡ يَنتَصِرُونَ
Mpe bakolobelaka bango: Wapi maye bozalaki kobondela,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَكُبۡكِبُواْ فِيهَا هُمۡ وَٱلۡغَاوُۥنَ
Na botiki Allah, boye bazali kosunga bino? To mpe bango moko bazali komisunga?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَجُنُودُ إِبۡلِيسَ أَجۡمَعُونَ
Mpe bakobwakama na moto bipai na bipai na bilongi na bango, na baye bapengwisaki bango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُواْ وَهُمۡ فِيهَا يَخۡتَصِمُونَ
Na basoda banso ya Satana (ibilisa).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تَٱللَّهِ إِن كُنَّا لَفِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٍ
Bakolobaka: Mpe bazali kosuana okati na yango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ نُسَوِّيكُم بِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Na Allah! Ya soló, tozalaki na libunga ya polele.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَضَلَّنَآ إِلَّا ٱلۡمُجۡرِمُونَ
Tozalaki kokokisa bino lokola Nkolo ya mokili.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَمَا لَنَا مِن شَٰفِعِينَ
Kasi ezali sé batomboki nde babungisaki biso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَا صَدِيقٍ حَمِيمٖ
Ata moninga ya soló soló azali te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَلَوۡ أَنَّ لَنَا كَرَّةٗ فَنَكُونَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Soki tozuaka nzela ya bozongi (ata na mokili), tolingaki kozala okati ya bandimi. (baye bazali kosala bolamu.)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Ya sólo, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazali kondima te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَذَّبَتۡ قَوۡمُ نُوحٍ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Bato ya Nûh bazangaki kondimela batindami, bazuaki bango bato ya lokuta.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ نُوحٌ أَلَا تَتَّقُونَ
Tango ndeko wa bango Nûh ayebisaki bango: Boye bokobanga (Allah) te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
Ya sólo, nazali motindami malamu тропа bino.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Bobanga Allah mpe botosa ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai lizali sé epai na Nkolo wa molongo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Bobanga Allah mpe botosa ngai. İli. Balobaki: Tondimelayo! Kasi
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ قَالُوٓاْ أَنُؤۡمِنُ لَكَ وَٱتَّبَعَكَ ٱلۡأَرۡذَلُونَ
ezali sé bato bazanga ntina, nde balandaka yo?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ وَمَا عِلۡمِي بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
Alobi: Nayebi te maye bazali kosala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنۡ حِسَابُهُمۡ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّيۖ لَوۡ تَشۡعُرُونَ
Lifuta na bango etali sé Nkolo wa ngai, soki bozali koyeba.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَنَا۠ بِطَارِدِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Nazali oyo abenganaka bandimi te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنۡ أَنَا۠ إِلَّا نَذِيرٞ مُّبِينٞ
Kasi nazali sé mokebisi ya polele.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُواْ لَئِن لَّمۡ تَنتَهِ يَٰنُوحُ لَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمَرۡجُومِينَ
Balobi: Nûh! Soki otiki te, okozala o kati ya baye tokoboma na mabanga.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبِّ إِنَّ قَوۡمِي كَذَّبُونِ
Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Bato na ngai bazali kondimela ngai te,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱفۡتَحۡ بَيۡنِي وَبَيۡنَهُمۡ فَتۡحٗا وَنَجِّنِي وَمَن مَّعِيَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Lakisa bosôló kati kati na ngai na bango, mpe bikisa ngai na baye bazali elongo na ngai kati ya bandimi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَنجَيۡنَٰهُ وَمَن مَّعَهُۥ فِي ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ
Mpe tolongisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa oyo ezalaki ya kotonda.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا بَعۡدُ ٱلۡبَاقِينَ
Mpe sima tozindisaki baye batikalaki (bapengwi oyo bazangaki bondimi).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Ya soló, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe ya solo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَذَّبَتۡ عَادٌ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Ba aad mpe baboyaki kondimela batindami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ هُودٌ أَلَا تَتَّقُونَ
Tango ndeko wa bango Hûd ayebisaki bango: Boye bozali kobanga te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
Ya soló, nazali motindami malamu epai na bino.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Bobanga Allah mpe botosa ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَتَبۡنُونَ بِكُلِّ رِيعٍ ءَايَةٗ تَعۡبَثُونَ
Boye bozali kotonga bikeko na ngomba nyoso тропа kokumisa?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَتَتَّخِذُونَ مَصَانِعَ لَعَلَّكُمۡ تَخۡلُدُونَ
Mpe bozali kotonga bandako ya minene lokola bokotikala libela awa na mokili?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذَا بَطَشۡتُم بَطَشۡتُمۡ جَبَّارِينَ
Mpe soki bopesi etumbu, bozalaka na mawa te, mpe bobimi bato ya makasi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Bobanga Allah mpe botosa ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱتَّقُواْ ٱلَّذِيٓ أَمَدَّكُم بِمَا تَعۡلَمُونَ
Bobanga oyo azali kopesa bino bolamu, na nyoso oyo boyebi,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَمَدَّكُم بِأَنۡعَٰمٖ وَبَنِينَ
Oyo apesi bino banyama na bana,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَجَنَّٰتٖ وَعُيُونٍ
Mpe bilanga na miluka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ عَذَابَ يَوۡمٍ عَظِيمٖ
Ya sôló, nazali kobangela bino etumbu 0 mokolo mwa suka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُواْ سَوَآءٌ عَلَيۡنَآ أَوَعَظۡتَ أَمۡ لَمۡ تَكُن مِّنَ ٱلۡوَٰعِظِينَ
Balobi: Olendisa biso to olendisa te, ezali sé lolenge moko.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا خُلُقُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Ezali sé ezaleli ya bato ya kala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ
Mpe tokozuaka etumbu te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَكَذَّبُوهُ فَأَهۡلَكۡنَٰهُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Baboyaki kondimela ye, mpe tobomaki bango, ya soló wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَذَّبَتۡ ثَمُودُ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Ba Thamûd, baboyaki mpe kondimela batindami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ صَٰلِحٌ أَلَا تَتَّقُونَ
Tango ndeko wa bango Swâlih ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
Nazali motindami malamu epai na bino.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Bobanga Allah mpe botosa ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَتُتۡرَكُونَ فِي مَا هَٰهُنَآ ءَامِنِينَ
Boye bokotikalaka na kimiya тропа maye bozali kosala,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فِي جَنَّٰتٖ وَعُيُونٖ
O kati ya bilanga mpe mingala?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَزُرُوعٖ وَنَخۡلٖ طَلۡعُهَا هَضِيمٞ
Milona mpe banzete ya nagh’l mpe ya mbuma kitoko,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَتَنۡحِتُونَ مِنَ ٱلۡجِبَالِ بُيُوتٗا فَٰرِهِينَ
Boye bozali kotonga bandako o likolo lia ba ngomba?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Bobanga Allah mpe botosa ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَا تُطِيعُوٓاْ أَمۡرَ ٱلۡمُسۡرِفِينَ
Kasi botosa makambo ya balekisi ndelo te,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلَّذِينَ يُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا يُصۡلِحُونَ
Baye bazali sé kobebisa o kati ya mabele mpe balingi kobongisa te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُوٓاْ إِنَّمَآ أَنتَ مِنَ ٱلۡمُسَحَّرِينَ
Balobi: Ya soló, ozali sé o kati ya balokami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
مَآ أَنتَ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُنَا فَأۡتِ بِـَٔايَةٍ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
Ozali sé moto lokola biso, yaka na elembo soki ozali kati ya balobi bosôló.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ هَٰذِهِۦ نَاقَةٞ لَّهَا شِرۡبٞ وَلَكُمۡ شِرۡبُ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ
Alobi: Nâqah[1] oyo azali na mokolo naye ya komela mayi, bino mpe bozali na mokolo ya komela (kozua) mayi.
[1] Náqah: Bótala suratu Al-A’ráf mokapo: 74.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَا تَمَسُّوهَا بِسُوٓءٖ فَيَأۡخُذَكُمۡ عَذَابُ يَوۡمٍ عَظِيمٖ
Mpe bosala ye mabe te, noki te, etumbu monene ekozua bino mokolo moko boye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَعَقَرُوهَا فَأَصۡبَحُواْ نَٰدِمِينَ
Kasi babomaki ye, mpe na sima bakomaki kolela.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَخَذَهُمُ ٱلۡعَذَابُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Mpe topesaki bango etumbu, wana ezali elembo kasi ebele na bango bazalaki kondima te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe Nkolo wayo azali ya sólo na bokasi atonda ngolu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَذَّبَتۡ قَوۡمُ لُوطٍ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Bato ya Loth baboyaki mpe kondimela batindami,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ لُوطٌ أَلَا تَتَّقُونَ
Tango ndeko wa bango Loth ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
Nazali motindami malamu тропа bino.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Bobanga Allah mpe botosa ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَتَأۡتُونَ ٱلذُّكۡرَانَ مِنَ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Boye bozali kosalela posa ya nzoto bino mibali na mibali o kati na mokili?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَتَذَرُونَ مَا خَلَقَ لَكُمۡ رَبُّكُم مِّنۡ أَزۡوَٰجِكُمۚ بَلۡ أَنتُمۡ قَوۡمٌ عَادُونَ
Mpe botiki basi oyo Nkolo wa bino akela тропа bino? Kasi bozali bato ya masumu (balekisi ndelo mpe babuki mibeko)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُواْ لَئِن لَّمۡ تَنتَهِ يَٰلُوطُ لَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُخۡرَجِينَ
Balobi: Eh Loth! Soki otiki te, tokobimisa yo (na mboka)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ إِنِّي لِعَمَلِكُم مِّنَ ٱلۡقَالِينَ
Alobi: Ya soló, ngai naboyi maye bozali kosala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبِّ نَجِّنِي وَأَهۡلِي مِمَّا يَعۡمَلُونَ
Nkolo, longisa ngai elongo na libota lia ngai тропа maye bazali kosala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ
Tolongisaki ye elongo na libota lia ye bango banso,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّا عَجُوزٗا فِي ٱلۡغَٰبِرِينَ
Longola sé mobange ya mwasi atikalaki elongo na baye bazuaki etumbu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ثُمَّ دَمَّرۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
Sima, tobomaki basusu baye batikalaki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَمۡطَرۡنَا عَلَيۡهِم مَّطَرٗاۖ فَسَآءَ مَطَرُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya motindo wana тропа baye tokebisaki?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Ya soló, wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَذَّبَ أَصۡحَٰبُ لۡـَٔيۡكَةِ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Bato ya aîkat, baboyaki kondimela batindami,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ شُعَيۡبٌ أَلَا تَتَّقُونَ
Tango ndeko wa bango Shuaîb ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
Nazali motindami malamu epai na bino.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Bobanga Allah mpe botosa ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ أَوۡفُواْ ٱلۡكَيۡلَ وَلَا تَكُونُواْ مِنَ ٱلۡمُخۡسِرِينَ
Mpe bokokisa bimekelo ya bitando na ndenge esengeli, kasi bozangisa yango te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَزِنُواْ بِٱلۡقِسۡطَاسِ ٱلۡمُسۡتَقِيمِ
Mpe botondisa emekelo na bosembo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَا تَبۡخَسُواْ ٱلنَّاسَ أَشۡيَآءَهُمۡ وَلَا تَعۡثَوۡاْ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُفۡسِدِينَ
Mpe bobuba bato te na bimekelo na bango, mpe bosala mabe kati na mokili te, (mpe bosomba bosembo ya bato na misolo te).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱتَّقُواْ ٱلَّذِي خَلَقَكُمۡ وَٱلۡجِبِلَّةَ ٱلۡأَوَّلِينَ
Mpe bobanga oyo akeli bino na baye baleka liboso na bino.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُوٓاْ إِنَّمَآ أَنتَ مِنَ ٱلۡمُسَحَّرِينَ
Balobi: Ya soló, ozali kati ya balokami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَنتَ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُنَا وَإِن نَّظُنُّكَ لَمِنَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
Mpe ozali sé moto lokola biso, mpe tozali kokanisa ete ozali kati ya babuki lokuta.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَسۡقِطۡ عَلَيۡنَا كِسَفٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
Kweisela biso ndambu ya mapata soki ozali koloba bosölo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبِّيٓ أَعۡلَمُ بِمَا تَعۡمَلُونَ
Alobi: Nkolo wa ngai ayebi maye manso bozali kosala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَكَذَّبُوهُ فَأَخَذَهُمۡ عَذَابُ يَوۡمِ ٱلظُّلَّةِۚ إِنَّهُۥ كَانَ عَذَابَ يَوۡمٍ عَظِيمٍ
Kasi baboyaki kondimela ye, mpe topesaki bango etumbu o mokolo moye mapata eyindaki, ya solo, yango ezalaki nde mokolo ya etumbu monene.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe ya soló, Nkolo wayo azali wa bokasi atonda ngolu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّهُۥ لَتَنزِيلُ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Ya sólo, yango (kurani) eye, ekitisamaki kowuta epai ya Nkolo wa molongo,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
نَزَلَ بِهِ ٱلرُّوحُ ٱلۡأَمِينُ
Molimo mosantu (anzelu gabiliyele) akitaki na yango,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
عَلَىٰ قَلۡبِكَ لِتَكُونَ مِنَ ٱلۡمُنذِرِينَ
Na motema nayo mpo ozala okati ya bakebisi,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
بِلِسَانٍ عَرَبِيّٖ مُّبِينٖ
Na lokota ya arabo oyo ezali polele.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّهُۥ لَفِي زُبُرِ ٱلۡأَوَّلِينَ
Mpe yango esilaka kokomama na makomi ya batindami ya kala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَوَلَمۡ يَكُن لَّهُمۡ ءَايَةً أَن يَعۡلَمَهُۥ عُلَمَٰٓؤُاْ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
Boye ezalaki elembo te тропа bango, mpo banganga nzambe ya bana ya isalayele bakoka koyeba yango?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَوۡ نَزَّلۡنَٰهُ عَلَىٰ بَعۡضِ ٱلۡأَعۡجَمِينَ
Mpe soki tokitisaki yango epai ya moto oyo azali arabo te,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَقَرَأَهُۥ عَلَيۡهِم مَّا كَانُواْ بِهِۦ مُؤۡمِنِينَ
Mpe atangela bango yango mbele bandimaki na yango te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَذَٰلِكَ سَلَكۡنَٰهُ فِي قُلُوبِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
Lolenge wana nde tokitisaki (koyimayima ezala) 0 mitema mia batomboki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَا يُؤۡمِنُونَ بِهِۦ حَتَّىٰ يَرَوُاْ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَلِيمَ
Bakondimaka na yango te kino bakomonaka etumbu ya makasi,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَيَأۡتِيَهُم بَغۡتَةٗ وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
Ekoyela bango mbalakaka, bakoyebaka te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَيَقُولُواْ هَلۡ نَحۡنُ مُنظَرُونَ
Mpe bazali koloba ete: Boye tokozelisama? (mpo tokoka kondima)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَفَبِعَذَابِنَا يَسۡتَعۡجِلُونَ
Boye! Etumbu na biso nde bazali kowelisa?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَفَرَءَيۡتَ إِن مَّتَّعۡنَٰهُمۡ سِنِينَ
Boye ozali kornona te, soki topesaki bango mua mibu po basakana,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ثُمَّ جَآءَهُم مَّا كَانُواْ يُوعَدُونَ
Sima maye balakamaki ekomelaki bango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
مَآ أَغۡنَىٰ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يُمَتَّعُونَ
Esengo eye bazalaki na yango esalisaki bango na eloko te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَهۡلَكۡنَا مِن قَرۡيَةٍ إِلَّا لَهَا مُنذِرُونَ
Mpe tobomaka mboka te, sé totinda bakebisi liboso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ذِكۡرَىٰ وَمَا كُنَّا ظَٰلِمِينَ
(Mpona) kokebisa, mpe tozali babubi te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا تَنَزَّلَتۡ بِهِ ٱلشَّيَٰطِينُ
Mpe ezalaki basatana nde bakiti nayango te (kurani).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا يَنۢبَغِي لَهُمۡ وَمَا يَسۡتَطِيعُونَ
Mpe esengeli na bango te, mpe bazali na makoki ya kosala yango te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّهُمۡ عَنِ ٱلسَّمۡعِ لَمَعۡزُولُونَ
(Kasi) ya soló, bango bamitiye mosika mpona koyoka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَلَا تَدۡعُ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ فَتَكُونَ مِنَ ٱلۡمُعَذَّبِينَ
Mpe kobondela nzambe mosusu te elongo na Allah, noki te okozuama 0 kati ya bato ya etumbu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَنذِرۡ عَشِيرَتَكَ ٱلۡأَقۡرَبِينَ
Mpe kebisa libota nayo ya pene.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱخۡفِضۡ جَنَاحَكَ لِمَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Mpe kitisa mapeka nayo (zala malamu) mpona bandimi oyo bazali kolanda yo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَإِنۡ عَصَوۡكَ فَقُلۡ إِنِّي بَرِيٓءٞ مِّمَّا تَعۡمَلُونَ
Mpe soki baboyi kotosa yo, loba na bango ete: Ya soló ngai na nazali mosika na maye bozali kosala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱلۡعَزِيزِ ٱلرَّحِيمِ
Mpe mipesa epai ya oyo azali na bokasi atonda mawa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلَّذِي يَرَىٰكَ حِينَ تَقُومُ
Oyo amonaka yo tango otelemaka,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَتَقَلُّبَكَ فِي ٱلسَّٰجِدِينَ
Mpe (amonaka) yo tango ogumbamaka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
Ya soló, ye azali moyoki mpe moyebi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
هَلۡ أُنَبِّئُكُمۡ عَلَىٰ مَن تَنَزَّلُ ٱلشَّيَٰطِينُ
Boye nayebisa bino epai ya nani basatana bazali kokita?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تَنَزَّلُ عَلَىٰ كُلِّ أَفَّاكٍ أَثِيمٖ
Bazali kokita epai ya bato ya lokuta basumuki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يُلۡقُونَ ٱلسَّمۡعَ وَأَكۡثَرُهُمۡ كَٰذِبُونَ
Batiyaka matoyi kasi ebele na bango bazali bakosi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلشُّعَرَآءُ يَتَّبِعُهُمُ ٱلۡغَاوُۥنَ
Kasi epai ya bato ya másese (masapo), elandaka bango sé baye babunga.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّهُمۡ فِي كُلِّ وَادٖ يَهِيمُونَ
Boye omoni te ete bazali kolekaleka kati kati ya ba ngomba (mibale?)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَنَّهُمۡ يَقُولُونَ مَا لَا يَفۡعَلُونَ
Mpe ya sólo, bango balobaka maye basalaka te,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَذَكَرُواْ ٱللَّهَ كَثِيرٗا وَٱنتَصَرُواْ مِنۢ بَعۡدِ مَا ظُلِمُواْۗ وَسَيَعۡلَمُ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓاْ أَيَّ مُنقَلَبٖ يَنقَلِبُونَ
Longola sé baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kokumisa Allah mingi, mpe bamisalisi na kopamela mabe ya babubi, kasi babubi bakoyebaka kala mingi te ba nani ekobebela bango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាស្ហស្ហ៊ូអារ៉ក
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ