Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: ម៉ារយុាំ   វាក្យខណ្ឌ:

Maryam

كٓهيعٓصٓ
Kâf, hâ, yâ, ain, sôd.[1]
[1] Bótala Al-Baqarah mokapo: 1.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ذِكۡرُ رَحۡمَتِ رَبِّكَ عَبۡدَهُۥ زَكَرِيَّآ
Ezali bokundoli bwa ngolu ya Nkolo wayo epai ya mowumbu wa ye Zakariya.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ نَادَىٰ رَبَّهُۥ نِدَآءً خَفِيّٗا
Tango azali kobelela Nkolo wa ye na kobatama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبِّ إِنِّي وَهَنَ ٱلۡعَظۡمُ مِنِّي وَٱشۡتَعَلَ ٱلرَّأۡسُ شَيۡبٗا وَلَمۡ أَكُنۢ بِدُعَآئِكَ رَبِّ شَقِيّٗا
Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Mikuwa mia ngai milembi, mpe suki ya pembe ezingi moto mwa ngai, na yango, ata ngonga moko te nazangaka kozua soki na beleli yo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنِّي خِفۡتُ ٱلۡمَوَٰلِيَ مِن وَرَآءِي وَكَانَتِ ٱمۡرَأَتِي عَاقِرٗا فَهَبۡ لِي مِن لَّدُنكَ وَلِيّٗا
Мре nazali kobanga (ezaleli) ya bakitani na ngai sima na ngai, mpe mwasi wa ngai abotaka te, pesa ngai mokitani awuta epai nayo,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَرِثُنِي وَيَرِثُ مِنۡ ءَالِ يَعۡقُوبَۖ وَٱجۡعَلۡهُ رَبِّ رَضِيّٗا
Oyó akokitana ngai mpe kokitana libota lia Ya’qúb, mpe tika été osepela naye oh Nkolo!
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَٰزَكَرِيَّآ إِنَّا نُبَشِّرُكَ بِغُلَٰمٍ ٱسۡمُهُۥ يَحۡيَىٰ لَمۡ نَجۡعَل لَّهُۥ مِن قَبۡلُ سَمِيّٗا
Eh Zakariya! Tozali kopesa yo sango elamu ya mwana mobali, nkombo naye ekozala Yahya totiya liboso naye nkombo ena te. (ndoi te)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبِّ أَنَّىٰ يَكُونُ لِي غُلَٰمٞ وَكَانَتِ ٱمۡرَأَتِي عَاقِرٗا وَقَدۡ بَلَغۡتُ مِنَ ٱلۡكِبَرِ عِتِيّٗا
Мре (Zakariya) alobi: Oh Nkolo wa ngai! Ndenge nini nakozala na mwana ya mobali mpe mwasi wa ngai abotaka te, mpe bopaka bosili kozua ngai?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ كَذَٰلِكَ قَالَ رَبُّكَ هُوَ عَلَيَّ هَيِّنٞ وَقَدۡ خَلَقۡتُكَ مِن قَبۡلُ وَلَمۡ تَكُ شَيۡـٔٗا
Ayanoli ye; ndenge Nkolo wayo alobi nde ekozala. Wana ezali pași te тропа ngai, mpe nakelaki yo liboso ozalaki eloko te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبِّ ٱجۡعَل لِّيٓ ءَايَةٗۖ قَالَ ءَايَتُكَ أَلَّا تُكَلِّمَ ٱلنَّاسَ ثَلَٰثَ لَيَالٖ سَوِيّٗا
Alobi: (Zakariya) Oh Nkolo wa ngai! Lakisa ngai elembo, (tiyela ngai elembo) (Allah) alobi: Elembo nayo, kolobisa bato te babutu[1] misato milandani.
[1] Babutu mpe mikolo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَخَرَجَ عَلَىٰ قَوۡمِهِۦ مِنَ ٱلۡمِحۡرَابِ فَأَوۡحَىٰٓ إِلَيۡهِمۡ أَن سَبِّحُواْ بُكۡرَةٗ وَعَشِيّٗا
Mpe abimeli bato naye kowuta na esika ya losambo, mpe ayebisi bango na maboko ete: Bosambela tongo mpe pokwa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَٰيَحۡيَىٰ خُذِ ٱلۡكِتَٰبَ بِقُوَّةٖۖ وَءَاتَيۡنَٰهُ ٱلۡحُكۡمَ صَبِيّٗا
Eh Yahya! Zúa buku mpe simba yango makasi, mpe topesaki ye bwanya azali elenge токе.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَحَنَانٗا مِّن لَّدُنَّا وَزَكَوٰةٗۖ وَكَانَ تَقِيّٗا
Mpe totiaki ye azala na mawa mpe bopeto, mpe azalaki moyengebeni,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَبَرَّۢا بِوَٰلِدَيۡهِ وَلَمۡ يَكُن جَبَّارًا عَصِيّٗا
Mpe azalaki na botosi mpe limemia epai ya baboti naye, kasi azalaki na lolendo te mpe komilakisa te, mpe azangaki te kotosa mibeko mia (Nkolo waye)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَسَلَٰمٌ عَلَيۡهِ يَوۡمَ وُلِدَ وَيَوۡمَ يَمُوتُ وَيَوۡمَ يُبۡعَثُ حَيّٗا
Mpe kimia ezala likolo lia ye na mokolo moye abotamaki, mpe na mokolo akokufa mpe mokolo akosekwa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱذۡكُرۡ فِي ٱلۡكِتَٰبِ مَرۡيَمَ إِذِ ٱنتَبَذَتۡ مِنۡ أَهۡلِهَا مَكَانٗا شَرۡقِيّٗا
Mpe kundola Maryam okati ya buku (kati ya kurani) tango amibendaki na libota lia ye akei kovanda na esika moko boye о moniele.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱتَّخَذَتۡ مِن دُونِهِمۡ حِجَابٗا فَأَرۡسَلۡنَآ إِلَيۡهَا رُوحَنَا فَتَمَثَّلَ لَهَا بَشَرٗا سَوِيّٗا
Mpe amibombami na bango, totindelaki ye molimo (gabiliyele) oyo ayelaki ye na lolenge ya moto malamu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَتۡ إِنِّيٓ أَعُوذُ بِٱلرَّحۡمَٰنِ مِنكَ إِن كُنتَ تَقِيّٗا
(Maryam) alobaki: Ya soló, ngai na mibateli epai ya Ar-Rahmân[1] тропа yo, soki penza ozali moyengebeni.
[1] Bótala suratu Al-Isrâ mokapo: 110.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ إِنَّمَآ أَنَا۠ رَسُولُ رَبِّكِ لِأَهَبَ لَكِ غُلَٰمٗا زَكِيّٗا
(Anzelu) alobi: Ya sólo, ngai nazali motindami ya Nkolo wayo mpo napesa yo likabo ya elenge mobali ya mayele oyo apetoama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَتۡ أَنَّىٰ يَكُونُ لِي غُلَٰمٞ وَلَمۡ يَمۡسَسۡنِي بَشَرٞ وَلَمۡ أَكُ بَغِيّٗا
Alobi: Ndenge nini nazala na mwana ya mobali, mpe mobali ata moko te asimbi ngai, mpe nazali ndumba te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ كَذَٰلِكِ قَالَ رَبُّكِ هُوَ عَلَيَّ هَيِّنٞۖ وَلِنَجۡعَلَهُۥٓ ءَايَةٗ لِّلنَّاسِ وَرَحۡمَةٗ مِّنَّاۚ وَكَانَ أَمۡرٗا مَّقۡضِيّٗا
Alobi: Ndenge wana nde Nkolo wayo alobi été; ezali pasi te тропа ngai, mpe tokotia ye elembo epai ya bato, mpe ngolu kowuta epai na biso. Mpe likambo yango ekokisamaki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ فَحَمَلَتۡهُ فَٱنتَبَذَتۡ بِهِۦ مَكَانٗا قَصِيّٗا
Mpe azuaki zemi mpe akendeki kofanda mosika.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَجَآءَهَا ٱلۡمَخَاضُ إِلَىٰ جِذۡعِ ٱلنَّخۡلَةِ قَالَتۡ يَٰلَيۡتَنِي مِتُّ قَبۡلَ هَٰذَا وَكُنتُ نَسۡيٗا مَّنسِيّٗا
Mpe pasi ya kobota eyeli ye onse ya nzete ya nagh’la[1] alobi: Eh mpasi na ngai! Soki liwa ezuaka ngai yambo ya oyo, nde nabosanamaki soló ya kobosanama.
[1] Bótala suratu Al-An’âm: 99, suratu Al-Kahf: 32.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَنَادَىٰهَا مِن تَحۡتِهَآ أَلَّا تَحۡزَنِي قَدۡ جَعَلَ رَبُّكِ تَحۡتَكِ سَرِيّٗا
Na yango, abengaki[2] ye na nsé naye alobi: Kozala na mawa te! Nkolo wayo asili kotiya onse nayo liziba ya bomoyi.
[2] Anzelu abengaki na nsé, to mwana naye (Issa) oyo awuti kobotama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَهُزِّيٓ إِلَيۡكِ بِجِذۡعِ ٱلنَّخۡلَةِ تُسَٰقِطۡ عَلَيۡكِ رُطَبٗا جَنِيّٗا
Ningisa nzete ya nagh’la[1], benda yango epai nayo ekokweisela yo mbuma na yango ya kotela.
[1] Nagh’la: Bótala suratu Al-An’âm: 99, suratu Al-Kahf: 32.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَكُلِي وَٱشۡرَبِي وَقَرِّي عَيۡنٗاۖ فَإِمَّا تَرَيِنَّ مِنَ ٱلۡبَشَرِ أَحَدٗا فَقُولِيٓ إِنِّي نَذَرۡتُ لِلرَّحۡمَٰنِ صَوۡمٗا فَلَنۡ أُكَلِّمَ ٱلۡيَوۡمَ إِنسِيّٗا
Lia mpe mela mpe sepelisa liso lia yo, soki omoni moto loba: Nazui elako ya ngizi pona Ar-Rahmán[1] Nakosolola ata na moto moko lelo te.
[1] Bótala na suratu oyo Mokapo: 18.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَتَتۡ بِهِۦ قَوۡمَهَا تَحۡمِلُهُۥۖ قَالُواْ يَٰمَرۡيَمُ لَقَدۡ جِئۡتِ شَيۡـٔٗا فَرِيّٗا
Mpe amemaki mwana na libota naye, mpe balobi naye ete: Oh Maryam! Osali likambo ya nsoni.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَٰٓأُخۡتَ هَٰرُونَ مَا كَانَ أَبُوكِ ٱمۡرَأَ سَوۡءٖ وَمَا كَانَتۡ أُمُّكِ بَغِيّٗا
Oh ndeko mwasi ndeko ya Háruna! Tata wayo azalaka moto mabe te, mpe mama wayo azalaka ndumba te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَشَارَتۡ إِلَيۡهِۖ قَالُواْ كَيۡفَ نُكَلِّمُ مَن كَانَ فِي ٱلۡمَهۡدِ صَبِيّٗا
Mpe alakisaki mosapi mwaye epai ya mwana, balobi: Ndenge nini tokolobisa mwana moke oyo awuti kobotama?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ إِنِّي عَبۡدُ ٱللَّهِ ءَاتَىٰنِيَ ٱلۡكِتَٰبَ وَجَعَلَنِي نَبِيّٗا
(Mwana) Alobi: Ya soló, nazali mowumbu wa Allah, apesi ngai buku mpe aponi ngai nazala ntoma,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَجَعَلَنِي مُبَارَكًا أَيۡنَ مَا كُنتُ وَأَوۡصَٰنِي بِٱلصَّلَوٰةِ وَٱلزَّكَوٰةِ مَا دُمۡتُ حَيّٗا
Mpe apamboli ngai esika nyoso nakozala, mpe atindi ngai nasambela mpe nabimisa Zakat[1] na bomoyi bwa ngai mobimba,
[1] Zakat: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 43.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَبَرَّۢا بِوَٰلِدَتِي وَلَمۡ يَجۡعَلۡنِي جَبَّارٗا شَقِيّٗا
Mpe nasala bolamu epai ya mama na ngai, mpe atiaki ngai nazala moto ya lolendo mpe moto ya pași te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلسَّلَٰمُ عَلَيَّ يَوۡمَ وُلِدتُّ وَيَوۡمَ أَمُوتُ وَيَوۡمَ أُبۡعَثُ حَيّٗا
Mpe kimia ezala likolo lia ngai, mokolo moye nabotamaki na mokolo moye nakokufa na mokolo moye nakosekwisama nazali na bomoyi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ذَٰلِكَ عِيسَى ٱبۡنُ مَرۡيَمَۖ قَوۡلَ ٱلۡحَقِّ ٱلَّذِي فِيهِ يَمۡتَرُونَ
Wana Issa mwana ya Maryam, liloba ya soló, eye bazali sé kotia tembe mpe kobundisa bosóló. (bwa ye)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
مَا كَانَ لِلَّهِ أَن يَتَّخِذَ مِن وَلَدٖۖ سُبۡحَٰنَهُۥٓۚ إِذَا قَضَىٰٓ أَمۡرٗا فَإِنَّمَا يَقُولُ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
Esengeli te na Allah azala na mwana, nkembo naye (Allah), soki akani likambo akoloba sé ete; zala, mpe ezalisami sé ndenge alobi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ ٱللَّهَ رَبِّي وَرَبُّكُمۡ فَٱعۡبُدُوهُۚ هَٰذَا صِرَٰطٞ مُّسۡتَقِيمٞ
Mpe ya soló, Allah azali Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino, bobondela ye, oyo nde nzela ya semba.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱخۡتَلَفَ ٱلۡأَحۡزَابُ مِنۢ بَيۡنِهِمۡۖ فَوَيۡلٞ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن مَّشۡهَدِ يَوۡمٍ عَظِيمٍ
(Na sima) bakabwani na binzambe nzambe kati kati na bango, etumbu ezali тропа bapengwi o mokolo ya monene (mokolo ya kokata makambo).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَسۡمِعۡ بِهِمۡ وَأَبۡصِرۡ يَوۡمَ يَأۡتُونَنَا لَٰكِنِ ٱلظَّٰلِمُونَ ٱلۡيَوۡمَ فِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
Bakoyoka mpe bakomona penza ndenge mokolo bakoyela biso, kasi babubi bakozala na libungi ya monene ya polele о mokolo yango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَنذِرۡهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡحَسۡرَةِ إِذۡ قُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ وَهُمۡ فِي غَفۡلَةٖ وَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
Mpe kebisa bango тропа mokolo mwa botungisami, tango manso makokatamaka, mpe bazali о mokili moye bazali komiyeba te mpe kondima te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّا نَحۡنُ نَرِثُ ٱلۡأَرۡضَ وَمَنۡ عَلَيۡهَا وَإِلَيۡنَا يُرۡجَعُونَ
Ya sólo, biso nde tozali na bokitani ya mabele, mpe baye banso bazali o likolo na yango, mpe epai na biso nde banso bakozonga.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱذۡكُرۡ فِي ٱلۡكِتَٰبِ إِبۡرَٰهِيمَۚ إِنَّهُۥ كَانَ صِدِّيقٗا نَّبِيًّا
Mpe kundola Ibrâhîm okati ya buku (kurani), ya soló, ye azalaki ntoma moto ya bosembo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ يَٰٓأَبَتِ لِمَ تَعۡبُدُ مَا لَا يَسۡمَعُ وَلَا يُبۡصِرُ وَلَا يُغۡنِي عَنكَ شَيۡـٔٗا
Tango ayebisaki na tata waye, eh tata wa ngai! Mpona nini ozali kobondela oyo akoyokaka te, mpe akomonaka te, mpe ekoki kosalisa yo na eloko te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَٰٓأَبَتِ إِنِّي قَدۡ جَآءَنِي مِنَ ٱلۡعِلۡمِ مَا لَمۡ يَأۡتِكَ فَٱتَّبِعۡنِيٓ أَهۡدِكَ صِرَٰطٗا سَوِيّٗا
Eh tata wa ngai! Našili kozua boyebi boye boyela naino yo te, landa ngai nakokamba yo o nzela ya semba.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَٰٓأَبَتِ لَا تَعۡبُدِ ٱلشَّيۡطَٰنَۖ إِنَّ ٱلشَّيۡطَٰنَ كَانَ لِلرَّحۡمَٰنِ عَصِيّٗا
Eh tata wa ngai! Kobondela satana te, ya soló, satana azangaki botosi ya Ar-Rahmán.[1]
[1] Bótala na mokapo: 18, 26, ya suratu oyo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَٰٓأَبَتِ إِنِّيٓ أَخَافُ أَن يَمَسَّكَ عَذَابٞ مِّنَ ٱلرَّحۡمَٰنِ فَتَكُونَ لِلشَّيۡطَٰنِ وَلِيّٗا
Eh tata wa ngai! Ya sólo ngai nazali kobanga etumbu ya Ar-Rahmán eyela yo, mpe okoma moto wa satana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ أَرَاغِبٌ أَنتَ عَنۡ ءَالِهَتِي يَٰٓإِبۡرَٰهِيمُۖ لَئِن لَّمۡ تَنتَهِ لَأَرۡجُمَنَّكَۖ وَٱهۡجُرۡنِي مَلِيّٗا
Alobi: Eh Ibrâhîm! Ozali koyina banzambe ba ngai? Soki otiki te nakobetaka yo mabanga zala mosika na ngai (tokabwana) tango molai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ سَلَٰمٌ عَلَيۡكَۖ سَأَسۡتَغۡفِرُ لَكَ رَبِّيٓۖ إِنَّهُۥ كَانَ بِي حَفِيّٗا
Ibrâhîm alobi: Kimia ezala nayo, nakosengelaka yo na Allah alimbisa yo, mpo ye andimelaka ngai тропа bolamu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَعۡتَزِلُكُمۡ وَمَا تَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَأَدۡعُواْ رَبِّي عَسَىٰٓ أَلَّآ أَكُونَ بِدُعَآءِ رَبِّي شَقِيّٗا
Namitie mosika na bino, mpe na maye bozali kobondela na botiki Allah, mpe nakosenga na Nkolo wa ngai, mpe nazali na elikya ete nakomona pasi te soki nasengi Nkolo wa ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَلَمَّا ٱعۡتَزَلَهُمۡ وَمَا يَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَهَبۡنَا لَهُۥٓ إِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَۖ وَكُلّٗا جَعَلۡنَا نَبِيّٗا
Tango amitie mosika na bango, mpe na maye bazalaki kobondela na botiki Allah, topesaki ye likabo ya Is’háq na Ya’qúb, mpe totiaki bango bantoma.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَوَهَبۡنَا لَهُم مِّن رَّحۡمَتِنَا وَجَعَلۡنَا لَهُمۡ لِسَانَ صِدۡقٍ عَلِيّٗا
Mpe topesaki bango ngolu na biso, mpe totombolaki bango na koloba bosôló.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱذۡكُرۡ فِي ٱلۡكِتَٰبِ مُوسَىٰٓۚ إِنَّهُۥ كَانَ مُخۡلَصٗا وَكَانَ رَسُولٗا نَّبِيّٗا
Mpe kundola Mûssa okati ya buku. Ya soló, azalaki moponomi ntoma mpe motindami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَنَٰدَيۡنَٰهُ مِن جَانِبِ ٱلطُّورِ ٱلۡأَيۡمَنِ وَقَرَّبۡنَٰهُ نَجِيّٗا
Mpe tobengaki ye (o ngambu ya mobali o ngomba ya sinai) penepene na biso тропа kopesa ye sekele.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَوَهَبۡنَا لَهُۥ مِن رَّحۡمَتِنَآ أَخَاهُ هَٰرُونَ نَبِيّٗا
Mpe na mawa na biso topesaki ye ndeko waye Háruna azala lokola ntoma.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱذۡكُرۡ فِي ٱلۡكِتَٰبِ إِسۡمَٰعِيلَۚ إِنَّهُۥ كَانَ صَادِقَ ٱلۡوَعۡدِ وَكَانَ رَسُولٗا نَّبِيّٗا
Mpe kundola okati ya buku Ismâîl. Ya sólo, azalaki kokokisa elaka mpe azalaki ntoma mpe motindami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَكَانَ يَأۡمُرُ أَهۡلَهُۥ بِٱلصَّلَوٰةِ وَٱلزَّكَوٰةِ وَكَانَ عِندَ رَبِّهِۦ مَرۡضِيّٗا
Mpe azalaki kotinda libota lia ye na losambo mpe kopesa zakat,[1] mpe Nkolo waye azalaki kosepela naye.
[1] Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 43.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱذۡكُرۡ فِي ٱلۡكِتَٰبِ إِدۡرِيسَۚ إِنَّهُۥ كَانَ صِدِّيقٗا نَّبِيّٗا
Mpe kundola Idrís[2] okati ya buku. Ya soló azalaki ntoma mpe moto ya bosembo.
[2] Idrîs: Enoka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَرَفَعۡنَٰهُ مَكَانًا عَلِيًّا
Mpe totombolaki ye esika likolo ya lokumu koleka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ أَنۡعَمَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِم مِّنَ ٱلنَّبِيِّـۧنَ مِن ذُرِّيَّةِ ءَادَمَ وَمِمَّنۡ حَمَلۡنَا مَعَ نُوحٖ وَمِن ذُرِّيَّةِ إِبۡرَٰهِيمَ وَإِسۡرَٰٓءِيلَ وَمِمَّنۡ هَدَيۡنَا وَٱجۡتَبَيۡنَآۚ إِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتُ ٱلرَّحۡمَٰنِ خَرُّواْۤ سُجَّدٗاۤ وَبُكِيّٗا۩
Baye wana bantoma baye Allah atondisaki bolamu naye likolo na bango kati ya libota ya Adam, na baye bazalaki elongo na Nûh (okati ya masuwa), mpe libota lia Ibrâhîm mpe Isalayele, mpe basusu baye tokambaki mpe toponaki, soki mikapo mia Ar-Rahmân[1] mizali kotangama, bakweyaka na kofukama na kolela.
[1] Bótala na suratu oyo Mokapo: 18, 26, 45.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ فَخَلَفَ مِنۢ بَعۡدِهِمۡ خَلۡفٌ أَضَاعُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَٱتَّبَعُواْ ٱلشَّهَوَٰتِۖ فَسَوۡفَ يَلۡقَوۡنَ غَيًّا
Kasi baye bakitanaki sima na bango, batikaki kosambela mpe balandaki bisengo na baposa na bango ya nzoto, kasi mosika te bakobebisama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّا مَن تَابَ وَءَامَنَ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَأُوْلَٰٓئِكَ يَدۡخُلُونَ ٱلۡجَنَّةَ وَلَا يُظۡلَمُونَ شَيۡـٔٗا
Longola sé oyo akotubela mpe andimi mpe asali misala milamu, bango nde bakokota na Iola mpe bakobubama te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
جَنَّٰتِ عَدۡنٍ ٱلَّتِي وَعَدَ ٱلرَّحۡمَٰنُ عِبَادَهُۥ بِٱلۡغَيۡبِۚ إِنَّهُۥ كَانَ وَعۡدُهُۥ مَأۡتِيّٗا
(Bakozala) na elanga ya edeni eye Ar-Rahmân alakaki yango bawumbu naye, baye bandimaki na (mabombami na yango). Ya soló, elaka naye ezali na tembe te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَّا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوًا إِلَّا سَلَٰمٗاۖ وَلَهُمۡ رِزۡقُهُمۡ فِيهَا بُكۡرَةٗ وَعَشِيّٗا
Kati na yango (Iola), bakoyokaka maloba mazanga ntina te, sé kimia, mpe bakozalaka na bilei bia tongo mpe pokwa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تِلۡكَ ٱلۡجَنَّةُ ٱلَّتِي نُورِثُ مِنۡ عِبَادِنَا مَن كَانَ تَقِيّٗا
Wana nde Iola eye tokopesaka bawumbu ba biso baye bazalaki na bobangi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا نَتَنَزَّلُ إِلَّا بِأَمۡرِ رَبِّكَۖ لَهُۥ مَا بَيۡنَ أَيۡدِينَا وَمَا خَلۡفَنَا وَمَا بَيۡنَ ذَٰلِكَۚ وَمَا كَانَ رَبُّكَ نَسِيّٗا
Tokitaka te sé na mitindo mia Nkolo wa yo, manso maye mazali liboso lia biso mpe osima na biso na maye manso mazwami o kati kati na yango mibale mazali yaye. Mpe Nkolo wayo abosanaka te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا فَٱعۡبُدۡهُ وَٱصۡطَبِرۡ لِعِبَٰدَتِهِۦۚ هَلۡ تَعۡلَمُ لَهُۥ سَمِيّٗا
Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali kati na yango, bondela ye mpe kanga motema тропа mabondeli naye. Boye osi oyoka été azali na ndoyi?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَيَقُولُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَءِذَا مَا مِتُّ لَسَوۡفَ أُخۡرَجُ حَيًّا
Mpe moto alobi: Boye soki nakufi nakosekwisama lisusu?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَوَلَا يَذۡكُرُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَنَّا خَلَقۡنَٰهُ مِن قَبۡلُ وَلَمۡ يَكُ شَيۡـٔٗا
Boye moto azali kokanisa te ndenge tokelaki ye liboso mpe ye azalaki eloko te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَوَرَبِّكَ لَنَحۡشُرَنَّهُمۡ وَٱلشَّيَٰطِينَ ثُمَّ لَنُحۡضِرَنَّهُمۡ حَوۡلَ جَهَنَّمَ جِثِيّٗا
Na nkombo ya Nkolo wayo, tokosangisa bango na basatana, mpe sima tokofukamisa bango liboso ya lifelo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ثُمَّ لَنَنزِعَنَّ مِن كُلِّ شِيعَةٍ أَيُّهُمۡ أَشَدُّ عَلَى ٱلرَّحۡمَٰنِ عِتِيّٗا
Sima tokobendaka na mangomba manso kati na bango baye bazangaki botosi, baye bazalaki mabe koleka тропа Ar-Rahmân.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ثُمَّ لَنَحۡنُ أَعۡلَمُ بِٱلَّذِينَ هُمۡ أَوۡلَىٰ بِهَا صِلِيّٗا
Sima, biso nde tokoyeba ba nani baye basengeli kokota mpo bazika na motó.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِن مِّنكُمۡ إِلَّا وَارِدُهَاۚ كَانَ عَلَىٰ رَبِّكَ حَتۡمٗا مَّقۡضِيّٗا
Mpe bino banso bokoleka likolo na yango (ya gbagba). Mpo été yango ekozangaka te epai na Nkolo wayo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ثُمَّ نُنَجِّي ٱلَّذِينَ ٱتَّقَواْ وَّنَذَرُ ٱلظَّٰلِمِينَ فِيهَا جِثِيّٗا
Sima, tokolongisaka baye bandimaki mpe tokotika babubi о kati na yango (lifelo) ya kofukama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتُنَا بَيِّنَٰتٖ قَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لِلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَيُّ ٱلۡفَرِيقَيۡنِ خَيۡرٞ مَّقَامٗا وَأَحۡسَنُ نَدِيّٗا
Mpe tango mikapo mia biso mizali kotangema likolo na bango, bapengwi bakolobaka na baye bandima: Lisanga nini ya malamu kati na oyo mibale ezali kitoko mpe bolongani ya malamu?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَكَمۡ أَهۡلَكۡنَا قَبۡلَهُم مِّن قَرۡنٍ هُمۡ أَحۡسَنُ أَثَٰثٗا وَرِءۡيٗا
Ebele toboma yambo na bango kati na mabota! Bazalaki malamu mpe na misolo ebele mpe kitoko.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قُلۡ مَن كَانَ فِي ٱلضَّلَٰلَةِ فَلۡيَمۡدُدۡ لَهُ ٱلرَّحۡمَٰنُ مَدًّاۚ حَتَّىٰٓ إِذَا رَأَوۡاْ مَا يُوعَدُونَ إِمَّا ٱلۡعَذَابَ وَإِمَّا ٱلسَّاعَةَ فَسَيَعۡلَمُونَ مَنۡ هُوَ شَرّٞ مَّكَانٗا وَأَضۡعَفُ جُندٗا
Loba: Oyo akozala okati ya libungi, Allah akobakisela ye libungi kino akozuaka etumbu, to soki tango ekoki ekoyebanaka te ba nani bazalaki na mabe koleka, na ba nani bazalaki na basoda ya motawu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَيَزِيدُ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ٱهۡتَدَوۡاْ هُدٗىۗ وَٱلۡبَٰقِيَٰتُ ٱلصَّٰلِحَٰتُ خَيۡرٌ عِندَ رَبِّكَ ثَوَابٗا وَخَيۡرٞ مَّرَدًّا
Mpe Allah akobakisela baye bakambamaki bokambi, mpe misala malamu maye mawumelaka, ekoki na litomba malamu mpe bozongi malamu epayi ya Nkolo nayo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَفَرَءَيۡتَ ٱلَّذِي كَفَرَ بِـَٔايَٰتِنَا وَقَالَ لَأُوتَيَنَّ مَالٗا وَوَلَدًا
Boye omonaki te ete: Oyo apengwaki na mikapo mia biso mpe alobi: Nakopesamaka bolamu na bana solo?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَطَّلَعَ ٱلۡغَيۡبَ أَمِ ٱتَّخَذَ عِندَ ٱلرَّحۡمَٰنِ عَهۡدٗا
Boye akomi na boyebi ya mabombami to azuaki elaka na Ar-Rahmân?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَلَّاۚ سَنَكۡتُبُ مَا يَقُولُ وَنَمُدُّ لَهُۥ مِنَ ٱلۡعَذَابِ مَدّٗا
Kasi ezali bongo te, tokokoma maye azali koloba mpe tokobakisela ye etumbu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَنَرِثُهُۥ مَا يَقُولُ وَيَأۡتِينَا فَرۡدٗا
Mpe biso nde tokopesaka maye azali koloba, kasi akoyelaka biso ye moko.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱتَّخَذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ ءَالِهَةٗ لِّيَكُونُواْ لَهُمۡ عِزّٗا
Bazui banzambe basusu batiki Allah, mpo bazala basungi ba bango, (тропа etumbu)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَلَّاۚ سَيَكۡفُرُونَ بِعِبَادَتِهِمۡ وَيَكُونُونَ عَلَيۡهِمۡ ضِدًّا
Kasi te, bakopengwaka na mabondeli ma bango, mpe bakozalaka banguna na bango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّآ أَرۡسَلۡنَا ٱلشَّيَٰطِينَ عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ تَؤُزُّهُمۡ أَزّٗا
Boye ozali kornona te ete ya soló: Totindaki bazabolo mpo bazangisaka bango botosi?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَلَا تَعۡجَلۡ عَلَيۡهِمۡۖ إِنَّمَا نَعُدُّ لَهُمۡ عَدّٗا
Kowelisa te тропа bango, ya sólo, tokotiyaka motango moye moyebani, (тропа maye manso basalaki).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَوۡمَ نَحۡشُرُ ٱلۡمُتَّقِينَ إِلَى ٱلرَّحۡمَٰنِ وَفۡدٗا
(Kanisa) mokolo moye tokosangisaka babangi (Nzambe) epai na Ar-Rahmán,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَنَسُوقُ ٱلۡمُجۡرِمِينَ إِلَىٰ جَهَنَّمَ وِرۡدٗا
Mpe tokopusaka batomboki o moto mwa lifelo lokola bibwele (тропа komela mayi ya moto).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَّا يَمۡلِكُونَ ٱلشَّفَٰعَةَ إِلَّا مَنِ ٱتَّخَذَ عِندَ ٱلرَّحۡمَٰنِ عَهۡدٗا
Bakozuaka lisalisi te, longola sé oyo akozua elaka na Ar-Rahmán.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقَالُواْ ٱتَّخَذَ ٱلرَّحۡمَٰنُ وَلَدٗا
Mpe bazali koloba ete: Ar-Rahmán azali na mwana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَّقَدۡ جِئۡتُمۡ شَيۡـًٔا إِدّٗا
Bosili koya na eloko ya mabe.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تَكَادُ ٱلسَّمَٰوَٰتُ يَتَفَطَّرۡنَ مِنۡهُ وَتَنشَقُّ ٱلۡأَرۡضُ وَتَخِرُّ ٱلۡجِبَالُ هَدًّا
Liloba wana ekoki kofungola mapata mpe kopasola mabele mpe bangomba bikopanzana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَن دَعَوۡاْ لِلرَّحۡمَٰنِ وَلَدٗا
Mpo bazueli Ar-Rahmân mwana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا يَنۢبَغِي لِلرَّحۡمَٰنِ أَن يَتَّخِذَ وَلَدًا
Kasi ekoki kosalama te ete: Ar-Rahmân azala na mwana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِن كُلُّ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ إِلَّآ ءَاتِي ٱلرَّحۡمَٰنِ عَبۡدٗا
Baye banso bazali o likolo mpe o nsé bakoya epaî ya Ar-Rahmân bazali bawumbu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَّقَدۡ أَحۡصَىٰهُمۡ وَعَدَّهُمۡ عَدّٗا
Asila koyeba motango mwa bango, mpe bazali ya koyebana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَكُلُّهُمۡ ءَاتِيهِ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فَرۡدًا
Mpe o mokolo mwa mbano bango banso bakotelemaka moko moko o liboso lia ye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ سَيَجۡعَلُ لَهُمُ ٱلرَّحۡمَٰنُ وُدّٗا
Ya soló, baye bandimaki mpe bazalaki kosala misala milamu Ar-Rahmân akopesa bango bolingo mpe bango bakolinga ye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَإِنَّمَا يَسَّرۡنَٰهُ بِلِسَانِكَ لِتُبَشِّرَ بِهِ ٱلۡمُتَّقِينَ وَتُنذِرَ بِهِۦ قَوۡمٗا لُّدّٗا
Mpe ya solo, tosilâ kozalisa yango mpasi te na lolemo nayo (kurani) тропа komanyola, mpo okoka kopesa sango elamu na yango epai ya babangi mpe okebisa na yango babubi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَكَمۡ أَهۡلَكۡنَا قَبۡلَهُم مِّن قَرۡنٍ هَلۡ تُحِسُّ مِنۡهُم مِّنۡ أَحَدٍ أَوۡ تَسۡمَعُ لَهُمۡ رِكۡزَۢا
Mpe ebele tosilaki koboma liboso na bango! Boye окотопа tokokuta moko kati na bango to okoyoka ata mwa makelele?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: ម៉ារយុាំ
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ