Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់អ៊ីសរ៉ក   វាក្យខណ្ឌ:
ذَٰلِكَ مِمَّآ أَوۡحَىٰٓ إِلَيۡكَ رَبُّكَ مِنَ ٱلۡحِكۡمَةِۗ وَلَا تَجۡعَلۡ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ فَتُلۡقَىٰ فِي جَهَنَّمَ مَلُومٗا مَّدۡحُورًا
(Manso) mana mazali maye Nkolo wayo atangisaki yo na bwanya, mpe kosangisa Allah na banzambe basusu te, noki te okobwakama o moto mwa lifelo moye mozali mosika na mawa ma Allah.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَفَأَصۡفَىٰكُمۡ رَبُّكُم بِٱلۡبَنِينَ وَٱتَّخَذَ مِنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ إِنَٰثًاۚ إِنَّكُمۡ لَتَقُولُونَ قَوۡلًا عَظِيمٗا
Boye Nkolo wa bino aponeli bino bana ya mibali mpe aponi ba anzelu bazala bana ya basi? Ya sólo, bozali kobimisa maloba ya mabe koleka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَقَدۡ صَرَّفۡنَا فِي هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ لِيَذَّكَّرُواْ وَمَا يَزِيدُهُمۡ إِلَّا نُفُورٗا
Mpe tosilaki kolobela polele (kotiya lotomo) maye manso mazali o kati ya kurani mpo été (bato) bakanisa, kasi wana ezali kokimisa bango sé bokimisi ya mabe.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قُل لَّوۡ كَانَ مَعَهُۥٓ ءَالِهَةٞ كَمَا يَقُولُونَ إِذٗا لَّٱبۡتَغَوۡاْ إِلَىٰ ذِي ٱلۡعَرۡشِ سَبِيلٗا
Loba: Soki ezalaki na banzambe mosusu elongo naye ndenge bazali koloba, balingaki koluka nzela ya Nkolo ngwende.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
سُبۡحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يَقُولُونَ عُلُوّٗا كَبِيرٗا
Lokumu naye, azali likolo koleka, mpe aleki maye bazali kolobela na bonene.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تُسَبِّحُ لَهُ ٱلسَّمَٰوَٰتُ ٱلسَّبۡعُ وَٱلۡأَرۡضُ وَمَن فِيهِنَّۚ وَإِن مِّن شَيۡءٍ إِلَّا يُسَبِّحُ بِحَمۡدِهِۦ وَلَٰكِن لَّا تَفۡقَهُونَ تَسۡبِيحَهُمۡۚ إِنَّهُۥ كَانَ حَلِيمًا غَفُورٗا
Mapata sambo na mabele, na manso mazuami o kati na yango, bazali kosanzola nkembo naye, mpe ezali na eloko moko te sé ezali kosanzola lokumu naye. Kasi bino nde bozali koyeba yango te. Ya soló, ye azali ngolu atonda bolimbisi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذَا قَرَأۡتَ ٱلۡقُرۡءَانَ جَعَلۡنَا بَيۡنَكَ وَبَيۡنَ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ حِجَابٗا مَّسۡتُورٗا
Mpe tango ozali kotanga kurani, totiaka kati kati nayo na baye bazali kondima na mokolo mwa suka te ndelo, oyo ezali komonana te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَجَعَلۡنَا عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ أَكِنَّةً أَن يَفۡقَهُوهُ وَفِيٓ ءَاذَانِهِمۡ وَقۡرٗاۚ وَإِذَا ذَكَرۡتَ رَبَّكَ فِي ٱلۡقُرۡءَانِ وَحۡدَهُۥ وَلَّوۡاْ عَلَىٰٓ أَدۡبَٰرِهِمۡ نُفُورٗا
Mpe tozipi bango motema été basosola te, mpe matoyi na bango lokola. Mpe tango ozali kokumisa bomoko ya Nkolo wayo o kati na buku, bapesi mikongo na kokima (bakei kobondela mabondeli ya mabe).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
نَّحۡنُ أَعۡلَمُ بِمَا يَسۡتَمِعُونَ بِهِۦٓ إِذۡ يَسۡتَمِعُونَ إِلَيۡكَ وَإِذۡ هُمۡ نَجۡوَىٰٓ إِذۡ يَقُولُ ٱلظَّٰلِمُونَ إِن تَتَّبِعُونَ إِلَّا رَجُلٗا مَّسۡحُورًا
Toyebi malamu maye bazali koyoka, soki bayoki epai nayo, balobilobi nanse o kati na bango, babubi bakolobaka: Bozali kolanda moto oyo alokami na bondoki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱنظُرۡ كَيۡفَ ضَرَبُواْ لَكَ ٱلۡأَمۡثَالَ فَضَلُّواْ فَلَا يَسۡتَطِيعُونَ سَبِيلٗا
Tala ndenge bazali kobetela yo bandakisa, basili kobunga, bakokokaka lisusu te kolanda mpe kozua nzela ya bosôló.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقَالُوٓاْ أَءِذَا كُنَّا عِظَٰمٗا وَرُفَٰتًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ خَلۡقٗا جَدِيدٗا
Mpe bakolobaka: Boye soki tokomi mikuwa mpe putulu ya mabele, tokosekwisamaka lisusu bikelamu ya sika?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់អ៊ីសរ៉ក
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ